Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

ONU esengi bobimisami bwa bato ba boloko mpo na COVID-19


Ba policiers na basoda bazali kobatela boloko bonene ya Makala na Kinshasa, RDC, 2 juillet 2013.
Ba policiers na basoda bazali kobatela boloko bonene ya Makala na Kinshasa, RDC, 2 juillet 2013.

Haut-Commissaire ya makoki ma bomoto ya ONU, Michelle Bachelet, asengi bomisami na lombango ya bato ba boloko na molongo mobimba mpo na kopekisa bopanzani bwa coronavirus ya sika mpe kufa ya bato ebele mpo boloko mingi etondisamaka koleka ndelo makasi.

"COVID-19 ebandi kobeta na bikuke ya boloko, ya ndako ya bokangami mpe ya bisika babombanka ba immigrants (baye bakima mboka ba bango) mpe ezali na likama ete emema kufa ya bato mingi bazali na mpasi ya makasi na bisika yango," ekebisi Mme Bachelet.

Andimi ete bikolo mingi bibandi kosala mwa makasi.

Ethiopie esakoli aministie (bolimbisami) mpe bobimisami bwa koleka bato 4.000 na boloko na ntina ya kosilisa kaka na boloko.

Mokonzi ya kala ya Chili oyo atiyamaka na boloko na bokonzi ya Pinochet na mibu 1970, Mme Bachelet asengi bakambi ba bikolo na molongo kobimisa bato banso bakangama na bozangi ntina mpenza, kati bango bato batiyama na boloko mpo na politiki mpe baye bakangama kaka mpo basosolaki to batiolaki bakonzi to mpe batelemeli bango.

XS
SM
MD
LG