Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi asakoli Etat d’urgence na RDC mpo na COVID-19


Président Félix Tshisekedi azali kosala malako mpo na coronavirus, Kinshasa, 18 mars 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi azali kosala malako mpo na coronavirus, Kinshasa, 18 mars 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix #Tshisekedi asakoli état d’urgence na ekolo Congo démocratique mpo likambo ya coronavirus ya sika oyo esili kozwa bato koleka 45 mpe koboma bato basatu. Kasi moto moko abikisami. Mibembo minso mipekisami kati na Kinshasa na bituka.

"Liboso ya makasi mpe ya likama oyo ezali na bokono boye, nasakoli état d’urgence na kotalaka ndenge bokengi na mboka mobundisami na COVID-19," eyebisi M. Tshisekedi.

Alobi ete police na ba soda ya mampinga bakobanda kotambola mpo komema bato kotosa mikano misakolamaki.

Namokano mwa ye, M. Tshisekedi asakoli ete "Kinshasa etiyami na bokangami".

Mobembo monso mopekisami kowuta engumba mokonzi ya RDC kokende na bituka, to mpe kowuta bituka misusu kokende na Kinshasa.

Kaka mpepo mpe masuwa ya cargo nde ekoki kosala mobembo kasi bakumbi ba yango bakoleka na kotalisama ya makasi.

Asengi bato bazala na bondeko mpo na kopesa maboko na fonds (lipenga) ekelami na misala ya bitumba ya COVID-19 oyo azali kokamba na lisungi ya Dr. Jean-Jacques Muyembe.

M. Tshisekedi asepeli ndenge bana ya Congo démocratique bazali kolanda mikano apesakaki le 18 mars 2020.

Asengi bato banso kotosa na bokengi mikano apesaki.

Asengi bato kobanga te kasi kotosa na bokengi malako ya bopeto mpe asakoli ete bato babale batalamaki na Lumbumbashi bazali te na COVID-19 lokola INRB etali yango kasi bilembo ya moto ya misato bizali kozelama.

Alobi akosunga usine pharmaceutique Pharmakina oyo eskoli kosala na mingi Chloroquine lokola mino eye emonisami kosunga bakoni ya COVID-19.

Asengi bayi mobongo kosunga komema bilei mpe mino na Kinshasa mpe RDC.

XS
SM
MD
LG