Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moto ya mibale akufi na COVID-19 na Kinshasa


Lopitalo ya Cinquantenaire na Kinshasa, 22 mars 2014.
Lopitalo ya Cinquantenaire na Kinshasa, 22 mars 2014.

Bakonzi ya bokolongono ya ekolo Congo dèmocratique basakoli ete moto ya mibale afuki na coronavirus COVID19 na enumba mokonzi Kinshasa.

"Tosili kozwa lelo moto ya mibale oyo akufi na COVID19," ekomi ministre ya bokolongono, Dr. Eteni Longondo.

"Misala mya bopeto mizali komibongisa mpo bokundami na ye na ndenge esengeli mpe na bokengi," ebakisi Dr. Longolondo.

Abakisi te sango mosusu mpo na liwa yango.

Kasi ba media ya Kinshasa elobaki ete moto ya yambo ya kowa na COVID19 (samedi) azalaki ndeko mpe mosungi na mosala ya ministre ya Economie oyo ye moko mpe azalaki na lopitalo na bokono bwango.

Kolanda ba media ya Kinshasa, ministre mosusu mpe azali na bokono bwango.

Yango ememaki mbulamatari mobimba kosala test elongo na prèsident ye ekolo. Kasi bamonani na yango te.

XS
SM
MD
LG