Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Aurlus Mabélé akufi na COVID-19


Aurlus Mabélé na palata "Soukous LA Terreur"
Aurlus Mabélé na palata "Soukous LA Terreur"

Alanga nzembo ya Congo-Brazzaville Aurlus Mabélé, oyo nkombo na ye ya solo ezalaka Aurélien Miatsonama, awei na coronavirus jeudi na Paris, France, eyebisi bayi libota na ye.

"Tata wa ngai akufi na ntongo ya lelo (jeudi) na coronavirus," ekomi na ba comptes na ye na ba réseaux sociaux na ye, mwana wa ye, Liza Monet.

"Matondi mpo na kopesa molimo na ye losaka. Azalaki engambe ya Soukouss oyo bana ya Congo babungisi mokolo ya lelo," ebakisi Mlle Monet.

Alobi azali na mpasi makasi na motema.

Aurlus Mabélé akomaki na mibu 67, azalaki nzoto bokolongo mpenza malamu te uto mikolo mileki.

Asalaka AVC.

Aurlus Mabele azali alanga nzembo oyo ateka koleka ba millions zomi ya palata na muindele na ye.

Azalaki moninga ya Diblo Dibala alanga nzembo mosusu ya Congo-Brazzaville ayebana mingi.

Lisanga na ye ezalaki na nkombo ya Loketo na mibu 80.

XS
SM
MD
LG