Président Cyril Ramaphosa alobi ete moto wa yambo azwami na bokono bwa Coronavirus na Afrique du Sud kasi asengi bana mboka mpe bavandi ya mboka na ye kobanga te.
Président Alassane Ouattara ya Côte d’Ivoire asakoli liboso ya Congrès na Yamoussokro ete akopesa nkombo te mpo na mbala ya misato na maponami ya mokonzi mboka makoya na octobre 2020.
Ambassade ya Etats-Unis esakoli ete bana ya ekolo Congo démocratique bakofuta lisusu te $250 ya misolo mpo na visa non-migrant. Kasi bakofuta $160 mpo na visas ya tourisme to business, eyebisii ambassade ya Etats-Unis.
Secrétaire d'Etat américain Mike Pompeo alaki lisusu lisungi ya USA na président Félix Tshisekedi, na bokutani bwa bango o'mokolo mwa mibale na Washington (Etats-Unis).
Sango na bokuse na bililingi
Koleka bato 20 bakufi na bitumba na Ituri, eyebisi mampinga mpe bakonzi na bisika biye.
CENCO (Conférence épiscopale nationale ya Congo) epameli boyokani bozali na bokonzi mpo na kotia bana ya ekolo na bowumbu na nzela ya boyokani bwa bango. Epameli mpe lokoso ya bakonzi na kozwa bomengo na lombango.
Président Félix Tshisekedi asakoli ete azali kokolisa bondeko na Israel. Alobi yango o’mokolo mwa eyenga na bokutani AIPAC 2020 (American Israel Public Affairs Committee) na Washington epayi wapi azwaki maloba.
Mwasi moko ya mibu 53 akufi na bokona bwa coronavirus na Etat ya Washington, azali moto wa yambo ya kowa na virus eye na mabele ya Amerika, elobi bakonzi.
Président Felix Tshisekedi asengi bolukiluki ya lombango kosalama mpo na liwa ya général Delphin Kahimbi, mokambi ya DEMIAP, misala ya bokengi ya FARDC, mampinga ya ekolo Congo démocratique.
Mobulu mobimaki na gare ya Lyon na Paris nzinganzinga na Paris. Bato bayike batiaki moto na mituka miike. Police ekangaki bayike. Totala.
Moto motiyami na Paris, engumba mokonzi ya France, nzinganzinga na gare ya Bercy (Lyon) pene na esika Fally Ipupa esengalaki abeta mindule na salle Paris-Bercy.
Général Delphin Kahimbi, mokambi ya DEMIAP, misala ya mapinga ekolo Congo démocratique akufi vendredi 28 février 2020 na Kinshasa, mokolo moko nsima na kopemisama na mosala. Ntina na liwa eyebani nanu malamu mpenza te.
Mbulamatari ya ekolo Congo démocratique ezali kosala vendredi boyokani ya kimya na lingomba ya basimba minduki FRPI na Geti, na Iutri.
FMI (Fonds monétaire international) etalisi kobanga na yango lolenge bosaleli budget ya RDC ezali kokende mpe ekanisi ete ekozala malamu kokitisa budget.
+Libanais Jamal Sammith ya Somibo eiami na boloko (Makala) mpo na misala ya 100 jours ya Félix Tshisekedi Alandi David Blattner ya Safricas +Mibu mibale ya marche ya CLC ya le 25 février 2020 +Mabota ya ba étudiants congolais na Chine basengi mbulamatari ya RDC kosunga bango kozonga mpo na Coronavir
Sango na minute moko +Ba FARDC babomi ba ADF motoba +Ba professeurs bazalaki te na bozongi ya kelasi na Unikin +Ba ONG ba sengi bokangemi ya biloko ya Dan Gertler +Ba magistrats bazongeli mosala
Mokonzi ya kala ya Egypte Hosni Moubarak akufi mardi na mibu 91 na hôpital militaire ya Caire.
Plate-forme ya ONG ”Congo ezali ya koteka te” esengi na président Félix Tshisekedi etumbu likolo ya Dan Gertler, homme d’affaires ya Israël, oyo ayebani kozala monginga ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.
Président sortant Faure Gnassingbé alongi maponami ya mokonzi ya mboka Togo ya samedi 22 février 2020 na koleka 72%, kolanda Commission électorale indépendante.
Voir plus