Président Paul Kagame ya Rwanda na bakokani na ye Félix Tshisekedi ya RDC na Joao Lourenço ya Angola basengi na Yuweri Museveni ya Ouganda ko vérifier mafundami ya Rwanda yambo na bofungolami ya ndelo kati na Kigali na Kampala.
Ouganda na Rwanda bazongisani bato ba babango bakangi mpo na kofundama na komikengelanama na misala ya bokengi. Yango esalami mardi yambo ya bokutani ya bakonzi Paul Kagame ya Rwanda mpe Yuweri Museveni ya Ouganda vendredi na Katuna na ndelo ya mboka mibale.
Directeur général ya Safricas Congo S.A, David Blattner azwami na maboko ya misala ya bosombe mpo na misala ya mikolo nkama ya bokonozi ya président Félix Tshisekedi mingi mpenza ba Sauts-de-moutons.
Président Paul Kagame ya Rwanda na mokokani wa ye Yuweri Museveni ya Ouganda bakokutana vendredi na Katuna, mboka ezwami na ndelo ya bikolo bya bango mibale na lisungi ya Félix Tshisekedi ya RDC na Joao Lourenço ya Angola.
Mokonzi ya kala ya Angola José Eduardo Santos akomi na mokanda ete mwana na ye José Filomeno elongo na mokambi ya kala ya Banque centrale ya mboka na ye baye bazali kosambisama, bayiba te, elobi AFP.
Nzoto etango esusu ezwami mercredi na parc ya Virunga nsima na bobomami ya koleka bato 11 ba ADF bafundami kosala butu ya lundi na mardi na territoire ya Beni, na Nord-Kivu.
Secrétaire d’Etat ya Etats-Unis Mike Pompeo akebisi mpo na bilaka ya Chine na Afrique. Asukisi mercredi 19 février 2020 mobembo mwa ye na Afrique.
Ba magistrats ya likolo ya RDC baye batiyami sika balapi ndayi mecredi 18 février 2020 liboso ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi.
Bavandi mingi bakimi nsima ba basimba minduki koboma na kokata bato na machetes (makwangola) na Manzahalo, na Beni. Bavandi bafundi ba ADF na kosala yango, Totala.
RDC na Congo-Brazzaville babimi na groupe moko (groupe B) na Libye mpe Niger mpo na CHAN 2020, na milulu misalamaki lundi na Yaoundé, engumba mokonzi ya Cameroun epayi phase finale ya momekano moye mokosalama na sanza ya minei.
Kizito Mihigo, alanga nzembo ya ekolo Rwanda oyo ayebana mpo na kotelemela bokonzi ya Paul Kagame, akufi na bokangemi na Kigali. Police ya Rwanda esakoli ete moyembi oyo "amibomi" na ndako ya boloko esika atiyamaki.
Motango ya bato bakufi na likama ya motuka dimanche na By-pass, nzela ekomemaka na Univeristé ya Kinshasa, na Mont-Ngafula, mokomi ya zomi na mitano, eyebisi ministre ya bokolongo, Dr. Eteni Longondo.
Koleka bato 14 bakufi ntango motuka monene motutaki mituka misusu mpe baleki nzela mpo na nkwokoso ya frien dimanche na nzela ya Bypass na Mont-Ngafula, naKinshasa, kolonda motango mopesami na bakonzi.
Motindami ya motuya (Envoyé spécial) ya Etats-Unis na Grands lacs, Peter Pham akutani na Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya ekolo Congo démocratique mpe basololi mpo etali boyoka ya mboka mibale.
Joseph Kabila, mokonzi ya lingomba FCC (Front commun pour le Congo) mpe mokonzi ya kala ya RDC asololi na balakisi elongi ya Grande-Bretagne. mpo na boyokani ya bokambi mboka ya FCC na CACH, lingomba ya président Félix Tshisekedi.
Mokambi ya kala ya ANR (Agence nationale des renseignements) apekisami kobima na mabele ya ekolo Congo démocratique kolanda mitindo bakonzi ya DGM (Direction générale des migrations) batindi na ndelo nyonso ya mboka. Kasi bato bayike bakangamaka kala na ANR basakoli kofunda M. Kalev na ba zuzi.
Président Félix Tshisekedi akitaki ye moko kotala misala ya botongi mizali kosalama na engumba Kinshasa mpo na mobu moko ya bokonzi na ye.
OMS (Mabongisi ya molongo mpo bokolongono) etiki bokono bwa Ebola na RDC lokola urgence internationale mpo na sanza misato, nsima bokutani ya ba experts mercredi na Genève na Suisse.
Envoyé special ya Etats-Unis mpo na etuka ya Grands lacs, Peter Pham amemeli président Félix Tshisekedi bakambi ya General Electric, moko na ba sociétés multinationales ya Amerika elingi kotiya mosolo na RDC.
Moïse Katumbi abandi o’mokolo ya mercredi 21 février 2020 komilengele mpo na kozongela société minière na ye, MCK (Mining company Katanga) na Lubumabshi nsima mokano ya Cour ya cassation ya France oyo epesi ye lisusu mpifo likolo na yango na kobotola yango na Necotrans oyo etakamaki.
Voir plus