Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto wa yambo akufi na coronavirus na Etats-Unis


Président Donald Trump na Maison Balnche, Washington DC, 29 férier 2020.
Président Donald Trump na Maison Balnche, Washington DC, 29 férier 2020.

Mwasi moko ya mibu 53 akufi na bokona bwa coronavirus na Etat ya Washington, azali moto wa yambo ya kowa na virus eye na mabele ya Amerika, elobi bakonzi.

"Pene na bato 22 bazwani na bokono ya coronavirus na Etats-Unis," eyebisi président Donald Trump na bapanzi sango.

Bato baye banso bazwaki yango na kozala nzinganzinga ya baye bawutaki na bokono bwango libanda.

Kasi mwasi oyo akufi azali moto wa yambo ya kozwa yango ata azalaki te nzinga nzinga na baye bawutaki libanda. Yango elakisi ete bokono boye bokoti mpe bokoki kopanza na Etats-Unis.

Bakoni 47 basusu bawutaki na maladi mwango na libanda.

"Ntina ya kobanga ezali te… Tokosala makasi mpo ete moto mosusu te akufa na bokono boye," esakoli M. Trump.

Na ngambo na ye, vice-président ya Etats-Unis, Mike Pince oyo atiami mokambi na bitumba na coronavirus ayebisi ete miiko mizwami mpo na kopekisa bana ba Etats-Unis kokende na Italie mpe Iran na Corée du Sud esika wapi bokono boye bozali mpe kongala.

Yambo, Etats-Unis ezwa mikano mpo na mibembo na Chine esika wapi bokono bwango bobandaki mpe bobomi bato 2.335 mpe bozwi bato 79.000.

Na mokili mobimba bato 2.900 nde bakufi mpe 85.00 nde bazwi yango.

XS
SM
MD
LG