Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Hosni Moubarak mokonzi ya kala ya Egypte awei


Mokonzi ya kala ya Egypte Hosni Moubarak, na Caire, Egypte, 25 avril 2016
Mokonzi ya kala ya Egypte Hosni Moubarak, na Caire, Egypte, 25 avril 2016

Mokonzi ya kala ya Egypte Hosni Moubarak akufi mardi na mibu 91 na hôpital militaire ya Caire.

M. Moubarak akambaki Egypte na bokonzi ya makasi mibu 30. Akweyisamaki na 2011 na botelemeli bobengamaki na nkombo ya Printemps arabe, atiamaki na boloko kasi atikamaki nsima na mwa mbula.

"Raïs" to "Pharaon" lokola abengamaka na bokonzi na ye, mokambi ya kala ya Egypte azwaki mwa nkwokoso ya bokolongo ya nzoto : dépression, cancer, maladie ya motema mpe ya mpema.

Mwana wa ye Alaa Moubarak asakolaki ete tata w aye azwaki lipaso le 24 janvier eleki.

Matanga ya mikolo misato mikosalama mpo na ye na Egypte.

Hosni Moubarak asalaka mobembo na RDC (Zaïre, nkombo ya kala) le 1er février 1984 mpe ayambamaki na président ya kala Mobutu Sese Seko, moninga wa ye.

XS
SM
MD
LG