Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi alaki kokolisa makasi bondeko na Israel na AIPAC na Washington


Président Félix Tshisekedi na bokutani ya AIPAC 2020 (American Israel Public Affairs Committee) na Washington, 1 mars 2020.
Président Félix Tshisekedi na bokutani ya AIPAC 2020 (American Israel Public Affairs Committee) na Washington, 1 mars 2020.

Président Félix Tshisekedi asakoli ete azali kokolisa bondeko na Israel. Alobi yango o’mokolo mwa eyenga na bokutani AIPAC 2020 (American Israel Public Affairs Committee) na Washington epayi wapi azwaki maloba.

Mokonzi ya RDC ayebisi ete akosala mobembo mobu moye na Isreal. "Mpe lisusu, nsima na koleka mibu 20 ya bozangi bolakisi elongi ya malamu, nakotiya na mikolo mikoya ambassadeur extraordinaire mpe plénipotentiaire (ya motuya mpe apesamela mpifo) na mboka Israel," esakoli M. Tshisekedi.

Ndenge moko mpe alaki kotiya section économique na basali ya l’Etat ya likolo baye bakopesamela mosala ya komema liboso boyokani kati na mboka mibale.

"Lokola ambassade na biso ezali na Tel-Aviv, namoni mabe moko te mpo section économique etiyama na engumba epambolama ya Jérusalem", elobi M. Tshisekedi.

Asakoli ete mboka mibale eye, RDC na Israel, esangisami na makambo mayike lokola bituma na kaniaka, na badongola miso mpe koluka kosukola misolo ya mabe. Alobi mpe boyebi Israel na zeki, na milona mpe na technology bokosunga RDC.

Félix Tshisekedi alobi ete azali kopesa maboko na mabongisi ya président américain Donald Trump mpo bozongi bwa kimya eye ekowumela mpe coexistence pacifique ya mboka mibale Israel na Palestine.

XS
SM
MD
LG