Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Pompeo alaki lisusu Tshisekedi lisungi ya USA


Président Félix Tshisekedi (G) na bokutani na Mike Pompeo Secrétaire d'Etat américain na Washington, Etats-Unis, 3 mars 2020. (Twitter/Mike Pompeo)
Président Félix Tshisekedi (G) na bokutani na Mike Pompeo Secrétaire d'Etat américain na Washington, Etats-Unis, 3 mars 2020. (Twitter/Mike Pompeo)

Secrétaire d'Etat américain Mike Pompeo alaki lisusu lisungi ya USA na président Félix Tshisekedi, na bokutani bwa bango o'mokolo mwa mibale na Washington (Etats-Unis).

Président Félix Tshisekedi asololi na Washington na Secrétaire d’Etat Américain Mike Pompeo mpoe lolenge ya kolendisa boyokani ya sika kati na Etats-Unis na RDC, kolanda Département d’Etat américain.

M. Tshisekdi azli na mobembo na Etats-Unis uto mokolo mwa eyenga.

M. Pompeo na président M. Tshisekedi batali "nzela nini kolendisa boyokani kati na USA na RDC mobu moyo uto bopesani ya bokonzi ya kimya botikali na lisolo", elobi Département d’Etat.

Bakonzi babale balaki kosala lisanga mpo komema oboso boyokani (Partenariat privlégié mpo na kimya mpe kofulukisama) bobanda nsima na mobembo président Tshisekedi asalaki na Washington DC na sanza ya minei eleki.

Kolanda Département d'Etat, M. Pompeo ayebisi président Tshisekedi ete akopesa ye maboko na linaka lya ye ya mbongwana mpo na kobundisa kaniaka, kokembisa ba institutions démocratiques, kobongisa makoki ma bomoto, kosilisa bozangi etumbu, kobundisa mombongo ya bato mpe komatisa kimya na monyele ya RDC.

Secrétaire d’Etat asakoli lisusu lisungi ya makasi na misala RDC ezali kosala mpo na kosilisa Ebola mpe kolendisa bondeko na linaka ya molongono mpo na bokengi na bokolongono (GHSA).

XS
SM
MD
LG