Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

CENCO epameli bakonzi na kotiya mboka na bowumbu ya coalition CACH-FCC


Mokambi ya Conférence épiscopale nationale du Congo (CENCO), Mgr Marcel Utembi elongo na molobeli ya CENCO, abbé Donatien Nshole na masolo na bapanzi sango na Kinshasa, 30 décembre 2016.
Mokambi ya Conférence épiscopale nationale du Congo (CENCO), Mgr Marcel Utembi elongo na molobeli ya CENCO, abbé Donatien Nshole na masolo na bapanzi sango na Kinshasa, 30 décembre 2016.

CENCO (Conférence épiscopale nationale ya Congo) epameli boyokani bozali na bokonzi mpo na kotia bana ya ekolo na bowumbu na nzela ya boyokani bwa bango. Epameli mpe lokoso ya bakonzi na kozwa bomengo na lombango.

Ba episkobo ya eklezia katoliko bakebisi na liyebisi mpo na matata kati na boyokani CACH-FCC boye bozali kopesa mabanzo mingi.

"Ba alliés bamonisami kokanisa mingi ndenge nini bakomivandisama na maye matali politiki na esika ya misala ya kosalela bana mboka baye bazali na mpasi ya makasi," ekomi b’episkopo.

"Tokoki kondima te ete mboka etiyana ba bowumbu likolo ya boyokani moko oyo bozali na nzela ya molili," elobi CENCO.

B’episkopo batelemeli mpe ndenge bayi politiki bazali kowelela bomengo.

"Tozali komona bozwi bomengo moko ya nsoni mpe bozali na nzela te na lingomba moke ya bayi politiki ntango bana mboka banso bazali na mpasi," ebakisi b’episkopo.

Balobeli mpe kaniaka.

Mpo na CENCO, bitumba na kaniaka mpe moyibi ya mosolo ya l’Etat mpe mikano misakolama mpo na kobundisa misala mabe miboti mbuma te.

B’episkopo basengi président Félix Tshisekedi kosala nyonso mpo boluliluki bonso bozala te kaka mupepe.

CACH, lingomba ya président Tshisekedi na FCC ya mokonzi ya kala basalaki boyokani nsima na maponami ya le 30 décembre 2018.

M. Tshisekedi alongaki présidentielle kasi FCC elongaki mabonga mingi koleka na ba institutions nyonso etikali.

XS
SM
MD
LG