Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

FMI elobi kokitisa budget ezali malamu


Mokambi ya FMI (Fonds monétaire international), Christine Lagarde, na président Félix Tshisekedi ya Congo démocratique na Washington, le 9 avril 2019. (Facebook/Présidence de la RDC)
Mokambi ya FMI (Fonds monétaire international), Christine Lagarde, na président Félix Tshisekedi ya Congo démocratique na Washington, le 9 avril 2019. (Facebook/Présidence de la RDC)

FMI (Fonds monétaire international) etalisi kobanga na yango lolenge bosaleli budget ya RDC ezali kokende mpe ekanisi ete ekozala malamu kokitisa budget.

"Lolenge budget esalelami kino kati kati ya sanza ya février ezali kopesa bobangi likolo ya bozito etiyami likolo ya ba dépenses mpe mpo na faible perfomance ya ba recettes," ekomi na liyebisi motalisi elongi ya FMI na RDC.

Bozito yango "bomemi bodefi mbongo na banque centrale mpe libulu kati ya ba réserves internationales ya BCC (Banque centrale ya Congo)," eyebisi lipinga ya FMI.

FMI esengi bakonzi ya RDC kotika kodefa misolo na BCC mpe kozongisa miye mizwamaki.

Mpo na FMI, plan ya trésorerie ministre oyo Finances abimisaki na février ezali réaliste (malamu). Plan yango elobaki mosolo mokoti moke mpe esengeli l’Etat esalela kaka 5,45 milliards $.

Kolanda mobeko ya finances ya 2020, budget ezali ya 10,59 milliards $ mpo na population ya pene na 80 millions ya bato, 2/3 babikaka na pene na dollars mibale na mokolo.

XS
SM
MD
LG