Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Koleka bato 20 bakufi na bitumba na Ituri


Mampinga ya RDC, FARDC na Djugu, na Ituri, janvier 2020. (FARDC PP Lieutenant Jules Ngongo)
Mampinga ya RDC, FARDC na Djugu, na Ituri, janvier 2020. (FARDC PP Lieutenant Jules Ngongo)

Koleka bato 20 bakufi na bitumba na Ituri, eyebisi mampinga mpe bakonzi na bisika biye.

"Bato bayaki kosala bitumba libwa mpe basoda basato bakufi," elobi molobeli ya FARDC, mampinga ya RDC, Lieutenant Jules Ngongo.

"Basimba minduki babomi bato mwambe na machettes mpe na masasi na mboka moko pembemebi," eyebisi nkumu moko Jean-Tichard Ehnakondo.

Vendredi, bato 24 basusu bakatamaki kingo na basimba minduki na territoire ya Djugu.

Kaka mokolo yango, mbulamatari etiaki manzaka na boyokani ya kimya na lingomba ya basimba minduki ya FRPI (Front ya résistance patriotique ya Ituri).

Bakonzi bazali kofunda lingomba CODECO mpo bitumba bizali kosalama mikolo miye. CODECO elobaka ete ebundaka mpo kobatela ba Lendu,

Bato 701 nde bakufi uto suka ya 2017 na esika eye na Ituri, kolanda ONU eye ekebisaki mpo na mbeba ya bomomoto.

Koleka bato 500.000 bakima bitumba na Ituri uto février 2018. ONU elobi ba Hema 402, baye bazali mingi babokoli bibwele, bakufi na bitumba uto 2017 kino septembre 2019.

Mpo na ONU, bato bazali kobomama na kotalaka kabila nini bazali.

XS
SM
MD
LG