Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba ONG basengi Tshisekedi etumbu mpo na Dan Gertler


Dan Gertler, homme d’affaires ya Israël, na Tel Aviv, 18 september 2000.
Dan Gertler, homme d’affaires ya Israël, na Tel Aviv, 18 september 2000.

Plate-forme ya ONG ”Congo ezali ya koteka te” esengi na président Félix Tshisekedi etumbu likolo ya Dan Gertler, homme d’affaires ya Israël, oyo ayebani kozala monginga ya mokonzi ya kala Joseph Kabila.

Ba ONG yango basengi M. Tshisekedi kokanga biloko ya milliardaire Dan Gertler oyo azali na concessions minières mingi mpe ba blocs pétroliers na RDC.

Na décembre 2017, Etats-Unis ekangaki ba comptes banso na M. getler mpo na ba misala na ye ya pétrole mpe ya mines mimonani kozala pole te.

Etats-Unis efundaka na kozangisa 1,36 milliards $ na RDC kati na 2010 mpe 2012 na kokitiska motuya ya ba actifs miniers atakelaka na ba sociétés off-shore oyo esalaka na ye.

Ba ONG baye basengi audit indépendant, ya misala ya l’Etat te miye misalaki ba contrats na M. Gertler.

Ambassadeur ya Etats-Unis na Kinshasa, Mike Hammer akomi na Twitter ete ezali ba ONG basali likambi lilamu.

XS
SM
MD
LG