Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi asengi bolukiluki mpo na liwa ya général Kahimbi


Général Delphin Kahimbi
Général Delphin Kahimbi

Président Felix Tshisekedi asengi bolukiluki ya lombango kosalama mpo na liwa ya général Delphin Kahimbi, mokambi ya DEMIAP, misala ya bokengi ya FARDC, mampinga ya ekolo Congo démocratique.

"Président Tshisekedi alingi ete bolukiluki bosalama na lombango mpo na koyeba ndenge mpeza liwa ya général Delphin Kahimbi ekomi," elobi na molobeli ya mbulamatari, David-Jolino Makelele na compte-rendu ya Conseil ya mbulamatari ya mokolo ya mitano moleki.

Général Kahimbi azalaki Chef d’état-major général adjoint ya FARDC atalaki mambi ya renseignements.

Akutami akufi na ndako na ye mokolo ya mitano. Mokolo moko nsima na kovandisa pembeni na mosala na ye.

Azalaki koyanola na mitanu ya misala ya bokengi. O’mokolo mwa mitano esengelaki ayanola na Conseil supérieur ya sécurité.

Butu yambo na liwa na ye, abotolamaki baso bakengelaka ye mpe minduki mionso.

XS
SM
MD
LG