Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Faure Gnassingbé alongi maponami na Togo


Faure Gnassingbé, na meeting na Sokodé, Togo, le 20 février 2020. (VOA/Kayi Lawson)
Faure Gnassingbé, na meeting na Sokodé, Togo, le 20 février 2020. (VOA/Kayi Lawson)

Président sortant Faure Gnassingbé alongi maponami ya mokonzi ya mboka Togo ya samedi 22 février 2020 na koleka 72%, kolanda Commission électorale indépendante.

Opposition endimi yango te mpe esengi bosolo ya maponami.

Agbéyomé Kodjo, moko na bayi opposition azali na molongo ya mibale, azwi 18%, kolanda CENI.

Abwaki mbela na bana mboka "kokita na balabala mpo na kosenga bosolo na ya maponami" na compte Tweeter na ye.

Kasi uto ntongo, mituka ya mampinga mitiami na banzela. Ba Togolais bakeyi misala na bango lokola momesano.

Ba observateurs balobi ete mbeba ya makasi emonani te na maponami yango.

77% nde ezalaki taux participation, kolanda CENI.

Na elonga na ye, Faure Gnassingbé akotikala na bonkonzi. Opposition etelamelaki mpe elonga na ye na maponami ya 2010.

Akitanaki na tata moboti wa ye général Gnassingbé Eyadéma oyo asalaka mibu 38 na bokonzi yambo akufa na kiti na ye.

XS
SM
MD
LG