Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mbulamatari na FRPI bakoyokona mpo na kimya vendredi na Ituri


Mathieu Ngudjolo (C) ya FPRI (Front pour la résistance patriotique (FPRI) na Floribert Kisembo (G) mokambi ya UPC (Union des patriotes congolais) na Bunia, Ituri, 18 mai 2003.
Mathieu Ngudjolo (C) ya FPRI (Front pour la résistance patriotique (FPRI) na Floribert Kisembo (G) mokambi ya UPC (Union des patriotes congolais) na Bunia, Ituri, 18 mai 2003.

Mbulamatari ya ekolo Congo démocratique ezali kosala vendredi boyokani ya kimya na lingomba ya basimba minduki FRPI na Geti, na Iutri.

Vice-Premier ministre mpe ministre ya Intérieur mpe ya mambi ya bokengi, Gilbert Kankonde apesi sango yango na libanda ya mpepo ya Goma, na Nord-Kivu, epayi wapi azalaki na nzela ya kokende na Ituri.

"Ezali esengo lolenge FRPI (Front patriotic pour la résistance en Ituri) endimi kokitisa minduka mpe bibundeli nsima na pene na mibu tuku mibale kati na bitumba," eyebisi M. Kankonde na bapanzi sango.

FRPI ezali moko na mangomba mabundaka na Ituri na bitumba kati na kabila miike lokola Ngiti, Hema, Lendu Twa mpe misusu wuto suka na mibu 90.

XS
SM
MD
LG