Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Mokambi ya DEMIAP général Delphin Kahimbi akufi


Délphin Kahimbi, mokambi ya DEMIAP, misala ya bokengi ya mampinga ya RDC, na Goma, Nord-Kivu, 14 octobre 2008.
Délphin Kahimbi, mokambi ya DEMIAP, misala ya bokengi ya mampinga ya RDC, na Goma, Nord-Kivu, 14 octobre 2008.

Général Delphin Kahimbi, mokambi ya DEMIAP, misala ya mapinga ekolo Congo démocratique akufi vendredi 28 février 2020 na Kinshasa, mokolo moko nsima na kopemisama na mosala. Ntina na liwa eyebani nanu malamu mpenza te.

Nzoto na général Kahimbi emami na ndako ya malili ya lopitalo ya Cinqauntaire na engumba mokonzi ya RDC, kasi ntina ya liwa na ye eyabani te.

Mampinga ya RDC malobi ete bolukiluki bozali kosalama kasi mapesi maloba misusu te.

Bayike nzinganzinga na genéral Kahimbi balobi ekoki kozala ete amibomi.

Molongani wa ye ayonoli na AFP ete akufaki na ndako na malali ya motema. Kasi ayebisaki bapanzi sango misusu ete asalaki manso mpo kopekisa mobali wa ye komiboma kasi akuti ye asili kowa.

Liwa lya général Kahimbi ekomi nsima koyanola, na ntongo ya mokolo mwa mitano, liboso ya Conseil supérieur ya sécurité.

Général Kahimbi apemisaki jeudi na mosala mwa ye mpe apesaki kiti na ye na mokonzi mosusu ya DEMIAP mpo na mwa ntango.

Bayike ya nzinganzinga ya bokengi balobi ete azalaki koyanola mpo etali kobomba minduki mpe masasi mpe boyokani ya nkunku na mangomba ya basimba minki.

Mposo mibale eleki, général Kahimbi apekisamaki kobima mboka.

XS
SM
MD
LG