Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Etats-Unis elongoli motango ya $250 ya visa non-immigrant mpo na ba Congolais


Consule ya Etats-Unis Christne Fagan azali kopesa passeports na baye basengaki kosala mobembo na Kinshasa, 4 mars 2020. (Twitter/Ambassade Etats-Unis)
Consule ya Etats-Unis Christne Fagan azali kopesa passeports na baye basengaki kosala mobembo na Kinshasa, 4 mars 2020. (Twitter/Ambassade Etats-Unis)

Ambassade ya Etats-Unis esakoli ete bana ya ekolo Congo démocratique bakofuta lisusu te $250 ya misolo mpo na visa non-migrant. Kasi bakofuta $160 mpo na visas ya tourisme to business, eyebisii ambassade ya Etats-Unis.

Ezali "mokano Etats-Unis ezongiseli RDC", kolanda lisakoli ya Etats-Unis.

"Boyokani bwa biso (USA-RDC) ya makasi bopesi nzela na mbongwaka boye," ekomi ambassade na compte Twitter na yango.

Ambassade ya Etats-Unis elobi mpe lisusu ete consule na yango Chrsitne Fagan azali kopesa passeports na baye basengaki kosala mobembo.

Kasi ambassae ya Etats-Unis ekebisi baye basalaki mobembo na Chine na mikolo 14 mileki mpo bokoti bwa bango na Etats-Unis bopekisami mikolo miye likolo ya bokono bwa coronavirus.

Meko moye motali te baye bazalaki na Hongo Kong mpe Macao, esakoli ambassade ya Etats-Unis.

Président Félix Tshisekedi azali na Etats-Unis wuto mokolo mwa eyenga mpe akutanaki na secrétaire d'Etat Mike Pompeo o'mokolo mwa mibale.

M. Pompeo alakaki lisusu lisungi ya Etats-Unis na misala ya M. Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG