Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto wa yambo azwami na Coronavirus na Afrique du Sud


Président Cyril Ramaphosa na Cape, Afrique du Sud, 13 février 2020.
Président Cyril Ramaphosa na Cape, Afrique du Sud, 13 février 2020.

Président Cyril Ramaphosa alobi ete moto wa yambo azwami na bokono bwa Coronavirus na Afrique du Sud kasi asengi bana mboka mpe bavandi ya mboka na ye kobanga te.

"Ministre ya bokolongono abengaki nga mpe ayebisi nga ete NICD (National Intitute for Communicable Diseases) endimi ete Afrique du Sud ezwi moto wa yango na Coronavirus," esakoli M. Ramaphosa na libanda ya mpepo.

Ezali elenge mobali ya mibu 38 oyo awutaki Italie.

Moto yango akendaki koluka lisungi na lopitalo ya Kwa-Zulu Natal province le 3 mars mpo na mutu mpasi, kuna bokono bwa corovirus bondimamaki nsima ba examens ya makasi.

Elongo na mwasi wa ye bazalaki kati bato zomi baye bawutaki Italie le 1er mars.

Topesi sango na lombango mpo ete bato babanga te kasi bamibongisa soki bamoni moto na bilembo biye baluka na lombango lisungi ya minganga, eyebisi M. Ramaphosa.

Président Ramaphosa alobi mboka na ye elakisi ete emilengeli mpe ekokoba komilengele mpo kobundisa bokono boye.

Coronavirus ya mbala oyo ebandaki na Chine na sanza ya zomi na mibale kasi epanzani na lobango na mokili mobimba.

Bato 90.000 bazwi na mokili mobimba kasi mingi koleka na Chine mpe bato 3.000 bakufi na yango.

Na Afrika esi ekomi na Egypte, Maroc, Algérie, Tunisie, Sénégal, Nigeria mpe sika na Afrique du Sud.

Coronavirus ekomi nanu te na ekolo Congo démocratique, kasi ba Chinois banei bawutaki mboka na bango kala mingi te batiyami na botalami mpe pembeni kati na Tshikapa mpe na Kananga, na etuka ya Kasaï.

Mokambi ya etuka ya Kasaï Dieudonné Pieme ayebisi VOA Lingala ete bamoni nde na malaria.

Nzoka na bakonzi ya Congo-Brazzaville ete baokityami na quarantaine bato banso bakowuta mobembo na France, Italie, Chine, Coréee du Sud mpe Iran, esika wapi coronavirus ezwi bato mingi mpe ebomi mingi.

XS
SM
MD
LG