Cour constitutionnelle elobi état d’urgence esakolamaki na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi ezwamaki kolanda Buku likonzi.
Koswana likolo ya bobengisami bwa Congrès bongali makasi. Vice-Premier ministre mpe ministre ya Intérieur Gilbert Kankonde ayebisi ete apesi mitindo na police mpe bayi bokengi mpo na kopekisa bokuni bonso, ezala ya Congrès.
Moto ya mibale akufi na bokono bwa Ebola lobi loleki lisusu na Beni monyele ya Ekolo Congo démocratique.
Bazuzi baboyi kondima bosenga ya ba avocats Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya mosala mpe allié ya président Félix Tshisekedi oyo atindamaki na boloko ya Makala mercredi.
Edem Kodjo, falicitateur (mosunga) na dialogue intercongolais ya cité ya Union africaine na 2016 akufi na Paris na mibu 81.
Mokambi ya ndako ya misala ya président Félix Tshisekedi atindami na bokolo ya Makala nsima na koyanola liboso bazuzi ya parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa Matete na Limete.
Police ebetaki gaz lacrymogène mpo na kopanza bato basanganaki na balandi ba UNC, na bokomi bwa mokambi ya lingomba liye, Vita Kamerhe, motambwisi ya ndako ya misala ya président Félix Tshisekedi na parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa/Matete/Limete.
Dr, Jean-Jacques Muyembe andimi ete RDC ezali candidat ya komeka mangwele ya coronavirus ya sika, COVID-19.
Martin Fayulu, Jean-Pierre Bemba, Moïse Katumbi na Adolphe Muzito bakambi ya lingomba Lamuka basengi ete mbulamatari ekanga mokaba mpe esalela na pole nyonso minso misengeli kotiyama na bitumba na coronavirus ya sika COVID-19.
Commune ya Gombe na engumba ya mokonzi ya RDC ekotiama na bokangami ya makasi mpo na mikolo zomi na minei mpo eyebani kozala épicentre to mokokoli ya coronavirus ya sika, esakoli mokambi ya engumba ya Kinshasa, Gentiny Ngobila.
Bato koleka tuku mibale bakufi nsima na kake kokweyisa singa ya lotiliki na nse ya mpela na Kintele, Congo-Brazzaville.
Moto ya yambo amonani na bokono bwa coronavirus ya sika COVID-19 na Goma, na Nord-Kivu, esakoli mokambi ya etuka eye, Carly Nzanzu Kasivita.
Président Denis Sassou N’Guesso asakoli "état d’urgence sanitaire" mpo na kobundisa coronavirus ya sika. Asakoli mpe lisusu "couvre-feu" ya 20h ti 5h kobanda mardi ekoya.
Bakonzi ya mbulamatari balongoli mokano ya kotinda bato kovanda na ndako mikolo minei wuto mokolo ya mposo.
Bakonzi ba bokolongono bwa nzoto bandimi ete moto ya yambo azwami na bokono bwa coronavirus ya sika libanda na engumba mokonzi ya ekolo Congo démocratique. Moto yango azwami na Ituri, elobi Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya cellule technique technique ya bitumba na COVID-19 mpe mokambi ya INRB.
COVID-19 ekoti na ndako Papa wa Roma avandaka.
Bakambi ya Kinshasa bazwi mokona ya kokanga engumba eye mpo na mikolo minei na ntina ya kopekisa bopanzani ya coronavirus. Bato pene na 10 millions bavandaka na engumba eye bakangama na ndako mpo na mikolo minei na ntani ya COVID-19.
Dr. Jean-Jacques Muyembe alobi ete misala ya bitumba na COVID-19 mimonisa bosenga bokazli ya 135 millions ya ba dollars na ntango eye.
Prix Nobel ya kimya ya 2018, Dr. Denis Mukwege asengi bayi ekolo Congo démocratique komilengela malamu na ntina ya kokata nzela ya Coronavirus COVID-19.
Martin Fayulu candidat malheureux ya maponami ya mokonzi ya mboka ya le 30 decembre 2018 mpe moko na bakambi ya lingomba Lamuka asengi lisungi ya ba Congolais banso mpe mbulamatari kokanga mokaba mpo na kotiya misolo mingi na bitumba na COVID-19.
Voir plus