Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Gilbert Kankonde alobi police ekopanza bokutani bwa Congrès mpo na kopekisa COVID19


Vice-Premier ministre mpe ministre ya mambi ya kati ya mboka mpe ya maye matali bokoko, Gilbert Kankonde na 4e Conférence Nationale ya planification na Kinshasa, 3 décembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Vice-Premier ministre mpe ministre ya mambi ya kati ya mboka mpe ya maye matali bokoko, Gilbert Kankonde na 4e Conférence Nationale ya planification na Kinshasa, 3 décembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Koswana likolo ya bobengisami bwa Congrès bongali makasi. Vice-Premier ministre mpe ministre ya Intérieur Gilbert Kankonde ayebisi ete apesi mitindo na police mpe bayi bokengi mpo na kopekisa bokuni bonso, ezala ya Congrès.

"Yango ezali kolanda mikano minso misakolamaki na président Félix Tshisekedi oyo apekisaki bosangani ya bato koleka 20 na ntina ya kokanga nzela na bopanzani bwa coronavirus," elobi M. Kankonde oyo azali moko na baye ya UDPS (Union pour la démocratie et le progrès social) lingomba ya mokonzi ya mboka.

"Bango moko, bayi parlement, bakomaki na mokanda mwa bango ete bakataki bosangani bonso mpo na COVID-19. Sik’oyo, esengeli batosa yango," ebakisi ministre ya Intérieur Kankonde.

Bayi lingomba UDPS balingi te bosangani bwa Congrès oyo présent ya Sénat, Alexis Thambwe Mwamba, asakoli kobengisa mikolo mikoya, nsima na bokutani na mokambi ya Assemblée nationale, Jeanine Mabunda.

Jean-Marc Kabund, mokambi ya UDPS mpe vice-président ya yambo ya Assemblée nationale aboyi likita lya Congrès esalama. Alobi ekozwa misolo mingi, koleka 7 millions $. Mpo na ye ntina ya kosanga ezali te mpe président Tshisekedi atamboli likolo na buku likonzi lokola bayi FCC bazali kokanisa,

Nzokande M. Thambwe Mwamba ayanoli ete M. Kabund akosi.

Mokambi ya Sénat asakoli lisusu ete suku mibale ya parlement esengeli ekutana mpo kotiya na nzela mokona ya président Félix Tshisekedi mosakolaki Etat d’urgence. Alobi likita lyango ekozongela kotala te soki président Tshisekedi abukaki mobeko likonzi kasi ekosunga mpo na kotiya mokano na ya na nzela.

Bayi UDPS, lokola Gilbert Kankonde balingi bokutani bwango te.

Baiike ya UDPS bazali kokebisa ete bayi FCC (Front commun pour le Congo) ya président ya kala Joseph Kabila, oyo baleki mingi na parlement, babongola ntina ya likita lyango mpe bakweyisa mokonzi ya mboka.

Kasi ba juristes baiike balobi, kolanda buku likonzi, bosengi ya kokweyisa mokonzi ya mboka bosengeli bowuta yambo na parquet ya Cour constitutionnelle mpo na Congrès etala yango.

XS
SM
MD
LG