Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kamerhe na Makala


Motambwisi ya misala ya mokonzi Félix Tshisekdi, Vital Kamerhe, na Palais de nationa, Kinshasa, 22 juillet 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Motambwisi ya misala ya mokonzi Félix Tshisekdi, Vital Kamerhe, na Palais de nationa, Kinshasa, 22 juillet 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Mokambi ya ndako ya misala ya président Félix Tshisekedi atindami na bokolo ya Makala nsima na koyanola liboso bazuzi ya parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa Matete na Limete.

Atiyami na nse mandat d’arrêt provioisre, elimboli moko na bayi bazali na misala ya koyoka ye.

"Amemami na boloko ya Makala," ekomi na Twitter Tryphon Kinkiey Muluma moko na bayi lingomba CACH (Cap pour le changement) oyo esangisa M. Kamerhe na président Félix Tshisekedi.

"Vital Kamerhe atiyami na pavillon 8, na Makala. Procureur général atie ye na bokangami sous map, yambo mpo na mikolo mitano, nsima ekoki kokoma ya mikolo zomi na mitano, nsima ya mikolo tuku misato mpe ekoki kobandelama mbala mibale yambo asambisama, elobi Me Georges Kampimba mokambi ya ACAJ, (Association congolaise pour l'accès à la justice).

M. Kamerhe ayanolaki wuto ngonga ya zomi kino ngonga ya zomi na mwambe.

Amemamaki na lobombango na boloko na bokengelami bwa commissaire divisionnaire ya engumba Kinshasa Sylvano Kasongo.

M. Kamerhe abengisamaki mpo na kopesa biyano na maye matali misala ya botongi mpo na mikolo nkama mya yambo ya M. Tshisekedi na bokonzi.

Akambaki misala myango na libandeli yambo mbulamatari etiyama na esika.

Bato misusu bakangamaki mpo makambo yango. Basusu batikamaki mpo na mwa ntango nsima na kofuta lomande.

XS
SM
MD
LG