Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Gombe ekokangama mikolo 14 mpo na COVID-19


Boulevard ya 30 juin na Gombe, Kinshasa, 19 décembre 2016.
Boulevard ya 30 juin na Gombe, Kinshasa, 19 décembre 2016.

Commune ya Gombe na engumba ya mokonzi ya RDC ekotiama na bokangami ya makasi mpo na mikolo zomi na minei mpo eyebani kozala épicentre to mokokoli ya coronavirus ya sika, esakoli mokambi ya engumba ya Kinshasa, Gentiny Ngobila.

Bokangami ya commune ya Gombe bokobanda o’mokolo mwa yambo mwa mposo mokoya.

Ministre ya bokolongo mbulamatari ye RDC, Dr Eteni Longondo mpe bakonzi basusu lokola baye ya police basengi na bavandi ya Gombe komipekisa kotende kovanda na ba communes misusu.

M. Ngobila mpe mokambi ya police ya Kinshasa, comissaire divisionnaire Sylvano Kasongo balobi ete mpo ntango eye ekozala ya kosala ba tests na bato, mpe kolandela baye bazalaki nzinganzinga na bato bakozwama na COVID-19 ata bazali na Gombe te.

Bisika biike lokola lopitalo mpe ba pharmacies mpe epayi misala mya litomba makasi nde ekotikala ya fungwama.

Bato baiike nde bazwi ndingisa ya kokota na bikoteli motoba bitiyami na Gombe. Ba policiers bazali na mosala, minganga, ba bapanzi sango, bato bazali nabokono to bazali koluka kosomba nkisi to kokende lopitalo, basi ya zemi mpe basali bazali na litomba ntango nde bazwi ndingisa na carte ekopesamela bango.

Bato 134 nde motango bato bayebani kozwama na COVID1-9 o'mokolo mwa le 2 avril 2020 na RDC mobimba mpe zomi na misato nde bakufi. Bato basato babikisamim bato tuku minei na mitano bazali kokende na kobika mpe pene na bato 800 balendelami mpo bazalaki nzinganzinga na baye bayebani kozwa virus yango.

XS
SM
MD
LG