Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dr. Mukwege asengi komilengela makasi na mabe ya COVID-19


Dr. Denis Mukwege, Nobel ya Kimya ya 2018, na lopitalo ya Mpazi epayi wapi asungaka basi babebisama na kozwama na makasi, na Bukavu, Sud-Kivu 5, 2018.
Dr. Denis Mukwege, Nobel ya Kimya ya 2018, na lopitalo ya Mpazi epayi wapi asungaka basi babebisama na kozwama na makasi, na Bukavu, Sud-Kivu 5, 2018.

Prix Nobel ya kimya ya 2018, Dr. Denis Mukwege asengi bayi ekolo Congo démocratique komilengela malamu na ntina ya kokata nzela ya Coronavirus COVID-19.

"Esengeli tomilengela lokola mbeba makasi mazali koya mpo toyebi te bonene nini coronavirus ekoki kopanzana na mboka na biso," elobi mosungi na nzela ya lipaso ya basi baye babebisama na kozwama na makasi na bitumba, Dr. Mukwege.

Monganga Mukwege akebisi mpo na "bozangi ba centres ya test na etando mobimba ya mboka mpe ya makoki ya mingi ya kotala soki bato bazwi COVID-19 na ekolo mobimba lokola OMS esengi yango".

RDC ezali na bavandi koleka 80 millions na etando ya koleka 2,3 millions km2.

"Lolenge tokoki kosukisa bopanzani ya virus ezali kaka komilengela," elobi Dr. Mukwege.

"Moko na moko esengeli abongola bizeleli bya ye, koboya kotambola pamba pamba kasi kovanda na ndako, kotosa mibeko mya kozala mosika na bato basusu (distance sociale)," ebeti sete Dr. Mukwege.

Kolanda malabo ma ye, lopitalo na ye Mpazi, na Bukavu (Sud-Kivu), emilengeli mpo na bokundisa COVID-19 mpe kosunga bakoni.

Katala te, ba respirateurs artificiels zomi epesamaki na lopitalo Mpazi.

RDC mobimba ezalaka na yango kaka pene na 50.

Dr. Mukwege asepeli na mikano nya mokonzi ya mboka Fٞélix Tshisekedi mpo na kokata nzela ya COVID-19.

XS
SM
MD
LG