Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bokangami na ndako bokozala lisusu te na Kinshasa


Bato bazali kowela komata na minibus na Kinshasa
Bato bazali kowela komata na minibus na Kinshasa

Bakonzi ya mbulamatari balongoli mokano ya kotinda bato kovanda na ndako mikolo minei wuto mokolo ya mposo.

Molebeli ya mbulamatari ya engumba Kinshasa alimboli ete bakonzi batali makombo mingi mpo kolongola mokona mwango.

"Ntalo ya biloko emati na ndenge kosakana te mpe mpo na ntina te... Totali ete bato bakozala na bokengi te," elobi na TopCongo FM Charles Mbutamuntu, molebeli ya mbulamatari ya engumba mokonzi ye ekolo Congo décromatique.

Nzokande nsima na mokano ya gouverneur ya Kinshasa Gentiny Gobila, bato mingi babimaki vndredi mpe bakendaki koluka mpe kosomba biloko na bobangi ete bakangama na ndako mpe bazanga biloko.

Mingi balandi ata te malako ya komibatelama mpo bazalaki kowela.

Bolongoli ya mokano bwango bosalami nsima ya bokutani ya Premier ministre Sylvestre Ilunga, mokambi ya cellule technique nationale ya bitumba na coronavirus Dr Jean-Jacques Muyembe mpe mokambi ya Kinshasa.

XS
SM
MD
LG