Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Edem Kodjo akufi na mibu 81


Premier ministre togolais ya kala Edem Kodjo, facilitateur ya dialogue congolais apanamaki na Union africaine, 8 juin 2005.
Premier ministre togolais ya kala Edem Kodjo, facilitateur ya dialogue congolais apanamaki na Union africaine, 8 juin 2005.

Edem Kodjo, falicitateur (mosunga) na dialogue intercongolais ya cité ya Union africaine na 2016 akufi na Paris na mibu 81.

Sango yango epesami na Union africaine mpo azalaki secrétaire général na yango ya kala (1978-1983).

Président ya Commission ya UA na ntango, Moussa Faki Mahamat abengi nkondo Edem Kodjo "homme d’Etat ya Lokumu mpe mobundi ya kimya".

Nkondo Edem Kodjo azalaki mwana ya Togo. Azalaki mpe Ministre ya yambo ya Togo mbala mibale. Na bokonzi ya Gnassingbè Eyadéma (1994-1996) mpe na bokonzi ya Faure Essozimna Gnassingbé, mwana na ya nkondo Gnassingbé (2005*2006).

Bana ya RDC mpe bapesi monano na M. Kodjo, oyo azalaki falicitateur na dialogue ya octobre 2016 oyo CENCO mpe bayi opposition mingi baboyaki. lokola UDPS, lingomba ya politiki ya président Félix Tshisekedi.

"Liwa ya Edem Kodjo. Président Kabila. Mokonzi ya kala ya RDC apesi losako ya nguya na mwana ya Afrika ya lokumu oyo ayebaki na misala mya ye mimonisa, idéal panafricaniste, na koluka biyano ya ban aya Afrika mpo na ban aya Afria," ekomi FCC na Twitter.

XS
SM
MD
LG