Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bazuzi bakati ete Kamerhe atikala na boloko


Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya mosala mpe allié ya président Félix Tshisekedi na /bruxelles, Belgique, 4 septembre 2018.
Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya mosala mpe allié ya président Félix Tshisekedi na /bruxelles, Belgique, 4 septembre 2018.

Bazuzi baboyi kondima bosenga ya ba avocats Vital Kamerhe, mokambi ya ndako ya mosala mpe allié ya président Félix Tshisekedi oyo atindamaki na boloko ya Makala mercredi.

Tribunal elobi ete ezali bilembo ya makasi milakisi ete Vital Kamerhe asali makambo afundami na yango.

Parquet ya Kinshasa Matete ezali kofunda M. Kamerhe na kopengwisa misolo ya l’Etat na kopesaka ba marchés na lolenge ya gré à gré (na boyokani kati na ngambo mibale sans kosala appels d’offres).

Na ndakisa, parquet elobi ete M. Lamerhe apesaki na compagnie moko 47 millions $ ezalaki mpo na kotonga ndako 3.000 kasi misolo myango mibunga kati na ba banques.

M. Kamerhe awangani makambo manso.

Parquet efundi ye lisusu mpo na 10 millions $ ezalaki mpo na kosomba nkisi. Misolo myango mipesamaki na compagnie moko ya quincaillerie oyo ememaki nkisi (mino) oyo esila ngala.

Mpo na yango, M. Kamerhe alobi ete ministre ya bokolongono Dr. Eteni Longondo andimaki nkisi yango.

M. Kamerhe mpe atangaki ba ministres ya mbulamatari lokola Thomas Lohaka ya kelasi ya likolo.

Nzokande DG ya Office de routes atindamaki na na boloko o'mokolo mwa mposo nse mpe bolukiluki ya bopengwisi misolo ya misala ya mikolo nkama ya bokonzi ya Félix Tshisekedi.

Jeudi ezalaki mokambi ya FONER (Fonds national d'entretien routier).

XS
SM
MD
LG