Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Gaz lacrymogène nsima na bokomi ya Kamerhe na Cour d’appel ya Matete/Limete


Police ezali kpanza bato na gaz lacrymogène na boulevard Lumumba na Limete, Kinshasa, 27 novembre 2018.
Police ezali kpanza bato na gaz lacrymogène na boulevard Lumumba na Limete, Kinshasa, 27 novembre 2018.

Police ebetaki gaz lacrymogène mpo na kopanza bato basanganaki na balandi ba UNC, na bokomi bwa mokambi ya lingomba liye, Vita Kamerhe, motambwisi ya ndako ya misala ya président Félix Tshisekedi na parquet ya Cour d’appel ya Kinshasa/Matete/Limete.

Vital Kamerhe azali koyanola na procureur uto pene na ngonga ya zomi na moko.

Bato ebele, na nkama, basanganaki o’boso ya parquet.

Baiike bazalaki koyembela M. Kamerhe basusu bazalaki kosenga ete mbongo ebima.

Mwa bitumba bisalamaki. Bato bazalaki kotosa ata ndelo ya bobangi coronavirus te.

Police ebetaki gaz lacrymogè mpo kopanza bango.

Mikolo mibale mileki M. Kamerhe aboyaki kokende mpo na mwa mbeba ezalaki na mokanda ya bobengisami na ye.

Abengisamaki mpo na misala ya mikolo nkama ya president Félix Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG