Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto ya mibale azwami mpe akufi na Ebola na Beni


Mosali ya bokolongo azali kosokola moninga wa ye na nkisi na na BEni, Nord-kivu, 9 septembre 2018.
Mosali ya bokolongo azali kosokola moninga wa ye na nkisi na na BEni, Nord-kivu, 9 septembre 2018.

Moto ya mibale akufi na bokono bwa Ebola lobi loleki lisusu na Beni monyele ya Ekolo Congo démocratique.

O’mokolo mwa mitano moleki, moto ya yambo amonanaki na bokono bwango mpe akufaki mokolo molandaki.

Moto ya mibale ya kokufa ba Ebola ezali mwana moke oyo akendaki na centre moko ya santé na elenge mobali ya mibu tuku mibale na motoba oyo akufaki o’mokolo mwa mitano moleki.

Yango esalamaki mikolo tuku mitano na mibale nsima na moto ya suka azwamaki na Ebola.

Mbulamatari mpe bakambi ya misala ya molongo mpo na bokolongono bazalaki komilengla mpo na kosakola suka na Ebola na esika eye.

Nzoka te yango ememi mwa ntembe na bavandi ya Beni.

Ebola ezongeli ntango engumba ya Beni ntango bokono bwa coronavirus mpe esili kokoma kuna. Moto moko azwamaki na COVID-19 kuna.

XS
SM
MD
LG