Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Moto wa yambo azwami na COVID-19 libanda ya Kinshasa, na Ituri


Minganga mpe bayi bokolongo bazali kopesa mangwele ya Ebola, Goma, Nord-Kivu, 7 août 2019.
Minganga mpe bayi bokolongo bazali kopesa mangwele ya Ebola, Goma, Nord-Kivu, 7 août 2019.

Bakonzi ba bokolongono bwa nzoto bandimi ete moto ya yambo azwami na bokono bwa coronavirus ya sika libanda na engumba mokonzi ya ekolo Congo démocratique. Moto yango azwami na Ituri, elobi Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya cellule technique technique ya bitumba na COVID-19 mpe mokambi ya INRB.

"Moto azwami na coronavirus ya sika na Ituri ezali mwana ya Congo ya mibu tuku misatu mitano. Asalaka misala ya mines," elobi Dr. Jean-Jacques Muyembe, mokambi ya Cellule technique ya bitumba na COVID-19.

Bato tuku mibale na misato bazalaki nzinganzinga na ye. Kati na bango bayi sambo ya misala kosunga na bokolongo. Bakonzi bokolongo bazali kolandela bango eyebisi, Dr. Muyembe.

Bakonzi ya bokolongono babongisi mwa libunga esalamaki mpo elobamaki yambo ete moto yango azwamaki na Nord-Kivu.

"Libunga ewuta lokola ekomamaki na ba échantillions Nord-Kivu, kasi ezali ya Ituri," elobi Dr. Muyembe.

"Tozali koluka koyeba soki moto ya ngo azwaki bokono boye ndenge nini," ebakisi Dr. Muyembe.

Etuka ya Itrui ezali pene na ndelo na Rwanda na Ouganda.

Mokambi ya Nord-Kivu, Carly Nzazu Kasivita, mpe alobi ete nanu moto moko te ezwami na coronavirus ya sika na etuka na ye.

Nzoka nde koleka bato 54 nde bazwami na COVID-19 na Kinshasa, mpe bato banei nde bakufi.

Bakonzi ya engumba Kinshasa bazwi mokano ete bato bavanda na ndako mpo na mikolo minei wuto mokolo mwa mposo;, nsima bakopemisa mikolo mibale mpo na koluka mpe kosomba bilei mpe biloko misusu kasi bakozonga na komikanga mpo na mikolo minei.

Mokambi ya engumba Kinshasa, Gentiny Ngobila alobi ekozala bongo mpo na mposo misato na ntina ya koboya bopanzani bwa COVID-19.

XS
SM
MD
LG