Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Sassou atie "état d’urgence sanitaire" mpe "couvre-feu" mpo na COVID-19 


Président Denis Sassou N'Guesso (G) elongo na ministre wa yambo ya Espagne Pedro Sanchez na bokutani ya COP 25, na Madrid, 2 décembre 2019.
Président Denis Sassou N'Guesso (G) elongo na ministre wa yambo ya Espagne Pedro Sanchez na bokutani ya COP 25, na Madrid, 2 décembre 2019.

Président Denis Sassou N’Guesso asakoli "état d’urgence sanitaire" mpo na kobundisa coronavirus ya sika. Asakoli mpe lisusu "couvre-feu" ya 20h ti 5h kobanda mardi ekoya. 

Na lisikuli asali samedi na télévision ya l’Etat, M. Sassou asengi bana banso ya Congo-brazzaville bamikotisa na bitumba na bokono boye bopanzani mokili mobimba.

Asengi bato bazala "ndakisa mpe bazala na bondeko".

Akeli libenga ya lisungi lisengeli kosangasi misolo koleka 100 milliards ya CFA uto le 10 avril.

Akundeli mikano azwaki mposo moko moleki ya bizaleli ya bopeto bato basengeli kotosa.

Biteyelo, biyamba, ba restaurants, bars, discothèques mpe bisika misusu bitali ya kokangama. Mpepo mpe basuwa ekotambola te, kaka ya va cargos.

Mibembo kati na bituka mipekisami.

XS
SM
MD
LG