Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto ya yambo azwami na COVID-19 na Goma


Mosali ya ministère ya Santé na Goma, Nord-Kivu, 31 mars 2020.
Mosali ya ministère ya Santé na Goma, Nord-Kivu, 31 mars 2020.

Moto ya yambo amonani na bokono bwa coronavirus ya sika COVID-19 na Goma, na  Nord-Kivu, esakoli mokambi ya etuka eye, Carly Nzanzu Kasivita.

Ezali moyi Nigeria ya mibu tuku minei na minei oyo asalaka na International Rescue Committee na Goma eyebisi Carly Nzanzu.

Bakonzi ba bokonongono balobi ete moto yango atiyami na bobombami mpe baye banso bazalaki nzinganzinga na ye bazali koluka mpo na kotiyama pembeni,bakozwama na mokumba na ntina kopekisa bopanzani ya COVID-19.

Mokoni yango azongaki kowuta mboka na ye Nigeria le 19 mars na nzela ya Kigali na Rwanda. Aselaki mobembo kati na Kigali mpe Goma na motuka.

Bakonzi ya bituka ya Nord mpe Sud-Kivu bapekisi bokatisi bonso na lac Kivu kati na Goma mpe Bukavu mpo na mikolo zomi na minei na ntina ya kopekisa bopanzani ya coronavirus ya sika.Nzokande motango ya bakoni ya COVID-19 mokomi 98, kolanda sango ya INRB (Institut national des recherches biomédicales).

Na Kinshasa ba communes motoba nde esimbami, bato mwambe nde bakufi na yango mpe misato nde babilisami.

O'mokolo mwa yambo ya mposo, bato babale bamonana na COVID-19 na Sud-Kivu mpo na mbala ya yambo.

Mposo moleki, o'mokolo mwa mitano, moto wa yambo azwamaki na COVID-19 na Ituri.

Bakoni banso batikali bazali na Kinshasa, engumba mokonzi.

XS
SM
MD
LG