OMS, Mabongisi ma molongo mpo na bokolongono, ekebisi bikolo ya Afrika mpo na kolongola na lombango mikano ya makasi ya kotelemela COVID19 ntango eye mboka mingi elingi kobanda kofungola misala na molongo.
+Ba FDRL bafundi mampinga ya Rwanda na koboma bato 17 na parc ya Virunga +Etats-Unis ebakisi 3 millions $ ya linsungi na RDC mpo na COVID19 +Bato babale ba yambo bazwami na COVID-19 na Matadi +COVID19 : Kasumbalesa ekangami mercredi mokolo moko nsima na Lubumbashi
Président Paul Kagame ya Rwanda alobi ete ata soda moko te ya mboka na ye azali na Ekolo Congo démocratique. Ezali eyano apesi na nungunungu ezali kotambola uto mwa mikolo.
Zacharie Badiengila, oyo ayebani lokola Ne Muanda Nsemi, atindami na CNPP (Centre nero-psychologique) na bosengi ya parquet, elobi bakonzi ya police nationale congolaise na Kinshasa, mokolo moko nsima na bokangami na ye.
Président Donald #Trump azwi mokona o'mokolo mwa misato mpo na kotelemisa bopesi mikanda ya bovandi na Etats-Unis na bapaya mpo na mikolo tuku motoba.
Assemblée nationale endimi na bokunai bwa yango ya jeudi 23 avril, kobakisa mpo na mikolo zomi na mitano.
Koleka bato 14 bakufi na bitumba kati na bayi bokengi na balandi ba BDM / BDK (Bundu dia Mayala / Bundu dia Kongo) ya Nemuanda Nsemi mercredi na Songololo, na Kongo central, elobi ya bakai ya DGM.
Préisent centrafricain Faustin-Archange Touadéra akutani na mokonani wa ye ekolo Congo démocraique Tshisekedi na N’Sele na Kinshasa. Bokengi mpe COVID19 nde ezalaki na masolo ma bango.
Dr. Denis Mukwege, prix Nobel ya kimya na 2018 mpo na kobongisa basi babebisa na makasi, asengi bana ya Afrika koselala makoki ya mboka na bango na bitumba na COVID-19.
Président Félix Tshisekedi asengi na bakambi ya biyamba komikotisa na bitumba na coronavirus ya sika. Akutani na bango N’Sele.
Motango ya bawei na bomati ya mayi na Uvira mokomi 52, elobi administrateur ya territoire ya Uvira, Alexis Rachidy.
Ambassade ya Etats-Unis na RDC esali vidéo ya "défi" (modenge) ya kolata masque. Makambi ya engumba Kinshasa asakoli ete uto lundi kolata masque ekomi lotomo mpo na kobima libanda. Yango esi ebandaki na Sud-Kivu. Totala bililingi ya ambassade ya USA na Kinshasa.
Nzoto ya bato bawei 24 ezwami nsima na bomati ya mayi ya Lac Ntanganyika na Uvira, na Sud-Kivu, eyebisi mokambi ya etuka eye, Théo Ngwabidje.
Bakamabi ya mampinga mpe ya bokengi ya Haut-Katanga babengisami na Kinshasa mpe Justice militaire ekokoba kosala enquête mpo na liwa lya bato na bitumba bingalaki ntango Bakata Katanga bakotaki le 28 mars na etuka eye, eyebisi ministre ya Intérieur na suka ya misala mbulamatari etindaki.
Balandi ba Ne Muanda Nsemi ya lingomba lya Bundu dia Malayala bakitaki obalabala jeudi na Matadi mpe Luozi, bakonzi bakitisabango mitema.
Mgr Gerard Mulumba, tata leki mpe mokambi ya Maison civile ya président Felix Tshisekedi akundami jeudi na likindo linene ya Saint Kagwa, na Kinshasa, nsima na liwa lya ye mokolo moko moleki na COVID19.
Bato basato bakufi mpe basusu bazoki na mobulu kati na police na bayi lingomba Bundu Dia Mayala ya Ne Muanda Nsemi na Boma, na etuka ya Kongo central mikolo. Esalami nsima na mobulu mosusu momemaki liwa ya bato babale na Kisantu na etuka moko ena lundi.
Président Donald Trump asakoli ete akati mosolo Etats-Unis epesaka OMS (Mabongisi ya molongo mpo na bokolongono). Apameli OMS mpo na bokambi ya mabe ya bokono ya coronavirus ya sika.
Président Félix Tshisekedi asololi na mokambi ya Sénat, Alexis Thambwe Mwamba, na mokambi ya Assemblée nationale, Jeanine Mabunda mpe na Ministre ya yambo Sylvestre Ilunga mpo na likambo ya Congrès esengeli ekutana mikolo mikoya likolo ya état d’urgence asakolaki le 24 mars.
Bato koleka motoba bazoki na milulu bilenge ya lingomba ya Vital Kamerhe, Union pour la nation congolaise (UNC) basali na Bukavu engumba mokonzi ya etuka ya Sud-Kivu.
Voir plus