Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bawei na bomati mayi na Uvira bakomi 52


Balobi mbisi na masuwa na lake Tanganyika na Uvira, Sud-Kivu, 22 mars 2915/
Balobi mbisi na masuwa na lake Tanganyika na Uvira, Sud-Kivu, 22 mars 2915/

Motango ya bawei na bomati ya mayi na Uvira mokomi 52, elobi administrateur ya territoire ya Uvira, Alexis Rachidy.

Bato tuku misato na motoba bakufaki na engumba ya Uvira mpe zomi na sambo nde nna territoire.

Bawei banso basi bakundami, kolandama maloba ya Alexis Rachidy.

Likama lyango lisamaki o’mokolo mwa mitano moleki.

Mayi ya Mulongwe mpe ya Kavimvira mamataki nsima na mposo mibale ya mpela ekasi.

Ndako mingi ebebi, eyebisi Alexis Rachidy.

Bato pene na 80.000 nde bazwi mpasi kolanda bakonzi ya territoire ya Uvira, kolanda mokambi ya etuka ya Sud-Kivu, Théo Ngwabidje.

XS
SM
MD
LG