Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato basato bakufi na mobulu kati na police na bayi Ne Muanda Nsemi na Boma


Ne Muanda Nsemi, chef spirituel de Bundu Dia Kongo, à gauche, chemise bleu ciel, lors de son arrestation par la police à Kinshasa, RDC, 3 mars 2017.
Ne Muanda Nsemi, chef spirituel de Bundu Dia Kongo, à gauche, chemise bleu ciel, lors de son arrestation par la police à Kinshasa, RDC, 3 mars 2017.

Bato basato bakufi mpe basusu bazoki na mobulu kati na police na bayi lingomba Bundu Dia Mayala ya Ne Muanda Nsemi na Boma, na etuka ya Kongo central mikolo. Esalami nsima na mobulu mosusu momemaki liwa ya bato babale na Kisantu na etuka moko ena lundi.

"Bato motoba bazwaki mpasi : misato bakufi mpe misato bazoki na makasi, moko kati na bango azali na esika ya mosala mwa ye," eyebisi 2e vice-président ya société civile ya Boma, Frazier Mvemba na radio Okapi.

Bayi lingomba ya politiki mpe bokoko, Bundu dia Mayala (BDM) ya Ne Muanda Nsemi bazalaki kotambola mpo na kolakisa nkanda na bango mpo na mpasi bana ya Kongo central bazali komona.

Moko na baye bazoki ezali mwana moke ya mobali ya mibu 13, kolanda M. Nvemba.

Bayi BDM bazalki kopamela mpasi mokambi na bango Ne Muanda Nsemi azali komona na maboko ya bokonzi, kolanda maloba ma bango.

Bakitaki o’balabala bazalaki kokende na mairie mpo na kotika mokanda ya bosenga na bango kasi bakangaki nzela na ba pneus ya moto.

Yango etindaki bateki kokima nzela mpe wenze mpe police ekitaki kopanza batamboli.

Kasi mikolo mibale mileki, balandi babale ya BDM basusu bakufaki na Kisantu, kaka na Kongo central, na bitumba na policiers bakita kopanza milulu mya bango. Bayi BDM bazalaki kobengana bapaya banso ya Kongo central.

Le 30 mars, Police ebenganaki bayi BDM na Kinshasa ntango bakitaki o'balabala.

XS
SM
MD
LG