Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Nzoto ya bato bawei 24 ezwami nsima na bomati ya mayi na Uvira


Mayi mamati makasi na nsima na mpela ekasi na Uvira, Sud-Kivu, 17 avril 2020.
Mayi mamati makasi na nsima na mpela ekasi na Uvira, Sud-Kivu, 17 avril 2020.

Nzoto ya bato bawei 24 ezwami nsima na bomati ya mayi ya Lac Ntanganyika na Uvira, na Sud-Kivu, eyebisi mokambi ya etuka eye, Théo Ngwabidje.

Mingi na baye bazali bana mike.

Motango ya bato baye na bomati ya mayi yango moyebani nanu malamu te.

M. Ngwabidje ayebisi nsima na likita lya bokengi ete bolukiluki bozali kokoba, elobi coorespondant ya VOA Lingala na Sud-Kivu.

Kino ntango eye nzoto ya bato tuku mibale na minei ezwami mpe ndako 3.500 ememami na mayi, kolanda maloba ya mokambi ya Sud-Kivu.

Mpela ekasi ekweyi uto mposo mibale mpe mayi mamataki makasi, kolanda maloba ya ministre ya lisalisi mpe bondeko na Kinshasa, Stve Mbikayi.

Bato pene na 70 bazoki, eyebisi na monganga Mpanzu Nimi ya Uvira na Actualite.cd.

XS
SM
MD
LG