Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Touadéra na Tshisekedi basololi na Kinshasa mpo na bokengi mpe COVID19


Président Félix Tshisekedi ayambi mokokani wa ye ekolo Centrafrique Fautsin-Archange Touadéra na N'Sele, Kinshasa, 22 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi ayambi mokokani wa ye ekolo Centrafrique Fautsin-Archange Touadéra na N'Sele, Kinshasa, 22 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Préisent centrafricain Faustin-Archange Touadéra akutani na mokonani wa ye ekolo Congo démocraique Tshisekedi na N’Sele na Kinshasa. Bokengi mpe COVID19 nde ezalaki na masolo ma bango.

Bakonzi babale basoli mpo etali bokengi mpe boyokani kati na ekolo ya Centrafrique na ekolo ya Congo démocraituqe, mboka mibale mikabolaka ndelo molayi koleka kilomtres nkoto moko na nkama motoba, eyebisi présidence ya RDC.

MM. Touadéra na Tshisekedi balobeli mpe lisusu lolenge nini bazali kosala misala ya kobundisa bokono bwa coronavirus ya sika COVID-19.

Ezali mobembo ya misato mokambi ya République centrafricaine asali na ekolo Congo démocratique.

XS
SM
MD
LG