Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bayi UNC motoba bazoki na milulu mpo kosenga botikami ya Kamerhe na Bukavu


ba policiers bakangami bato bayike na milulu yambo na maponami na Bukavu, Sud-Kivu, 28 décembre 2018.
ba policiers bakangami bato bayike na milulu yambo na maponami na Bukavu, Sud-Kivu, 28 décembre 2018.

Bato koleka motoba bazoki na milulu bilenge ya lingomba ya Vital Kamerhe, Union pour la nation congolaise (UNC) basali na Bukavu engumba mokonzi ya etuka ya Sud-Kivu.

Bayi lingomba liye bapelisaki moto mpe bakangaki nzela ata mokambi ya etuka apesaki milulu minso.

Bayebaki koleka mabongisi ya police mpe batikaki nkasa ya bosenga na bango na ndako ya mosala ya mondele mboka.

Police epanzaki mpe ekangaki baiike. Milulu mizali kosala na bingumba biike, mingi na monyele ya Ekolo Congo démocratique.

Na Kinshasa, ba sambeli to ba avocats ba Vital Kamerhe bazongelaki kosenga botikami bwa mokambi ya ndako na misala ya mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi ntango bazuzi bakokoba mosala mwa bango yambo na bosambisami likolo na misolo mya botongi mpo na mikolo nkama mya yambo ya président Félix Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG