Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump akati mbongo USA epesamaka na OMS


Donald Trump addresses the daily coronavirus task force briefing
Donald Trump addresses the daily coronavirus task force briefing

Président Donald Trump asakoli ete akati mosolo Etats-Unis epesaka OMS (Mabongisi ya molongo mpo na bokolongono). Apameli OMS mpo na bokambi ya mabe ya bokono ya coronavirus ya sika.

"Lelo, napesi mitindo ete mosolo mopesamaka na OMS mokatama ntango bolukiluki bokosalama mpo na kotala mosala nini OMS esalaki na bokambi mabe mpe na kozanga koyebisa lolenge coronavirus ezalaki kopanzana makasi," elobi M. Trump na bokutani na bapanzi sango na Maison Blanche, na Washington DC.

Tata mokonzi ya Etats-unis abakisi ete sango ya lokuta na mokili mpo etali lolenge nini bokono boye bopesamaka mpe lolenge yango ememaka liwa.

M. Trump apameli OMS mpo na kokotela to ,poe kozala na mopanzi ya Chine, na kobomba bosolo.

Etats-Unis epesaka misolo mingi koleka bikolo nyonso, na ONU. Mobu moleki epesaki 400 millions $.

Mpo na M. Trump, OMS epekisaki pole koyebena mpe Washington ekokoba kosolola mpo na koyeba nini kosala na mosolo monso mosengelaki kopesama na agence ya ONU.

Yambo na yango, secrétaire d’Etat Mike Pompeo alobaki ete OMS esalaki te maye esengelaki kosala na libandela ya bokono boye bopanzani na mokili.

M. Pompeo apameli lisusu Chine mpo elekisaki ntango mingi yambo na kolakisa na mokili mabe ya bokono boye bokoki kosala.

Na ngambo na ye, kalaka mokonzi ya ONU, Antonio Guterres ayanoli ete ntango oyo ezali te ngonga ya kokitisa misolo mipesama na OMS.

XS
SM
MD
LG