Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Kagame alobi ata soda moko te ya Rwanda aza na RDC


Président Paul Kagame ya Rwanda na Nairobi, Kenya, 11 février 2020.
Président Paul Kagame ya Rwanda na Nairobi, Kenya, 11 février 2020.

Président Paul Kagame ya Rwanda alobi ete ata soda moko te ya mboka na ye azali na Ekolo Congo démocratique. Ezali eyano apesi na nungunungu ezali kotambola uto mwa mikolo.

"Mbulamatari ya RDC eyebi ete ezali ata na soda moko te (ya Rwanda) na monyele ya RDC. Esengeli bondimela nga, ezali na soda moko te ya ba RDF (mampinga ya Rwanda) na esika eye," esakoli M. Kagame na bokutani na bapanzi sango bozalaki mpo na coronavirus.

Bayi société civile ya Nord-Kivu mpe ya Sud-Kivu, na RDC, babwakaki mbela mpo na kofunda ba soda ya Rwanda kokota na mabele ya Congo.

Monusco (misala ya ONU na Congo) mpe elobaki ete ezwaki sango yango mpe basoda ya Rwanda bazalaki komonana na mabele ya RDC.

Nungunungu ezalaki wuto mwa ba sanza koloba ete bayi mampinga ya Rwanda bazalaki na mabele ya RDC mpo na kosala bitumba na batomboki ya FLDR (Forces démocratiques ya libération ya Rwanda), lingomba ekalama na 2000 nsima na génocide ya 1994 na ekolo na bango.

Mampinga ye RDC esakolaki na septembre ete mabomaki mokambi ya FDLR Sylvestre Mudacumura oyo alukamaki na CPI (Cour pénale internationale) mpo na mbeba ya bitumba na monyele ya RDC.

Mampinga ya Rwanda babimaki na mabele ya Congo nsima na 2002 nsima na kopesa maboko na AFDL (Alliance ya ba Forces démocratiques mpo na libération) ya Laurent-Désiré eyebenaganaki président na kiti na ye nsima na mibu 32 ya bokonzi.

LdD Kabila akomaki mokonzi le 17 mai 1997 kasi bamobomaki na kiti ya bokonzi le 16 janvier 2020 mwa ba mposo nsima na ye koluka kobengana mampinga ya Rwanda mpe ya Ouganda maye masungaka ye.

XS
SM
MD
LG