Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi asengi bakambi ya biyamba komikotisa na biutmba na COVID-19


Président Félix Tshisekedi azali kosolola na bakambi ye biyamba na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi azali kosolola na bakambi ye biyamba na N'Sele, Kinshasa, 20 avril 2020. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi asengi na bakambi ya biyamba komikotisa na bitumba na coronavirus ya sika. Akutani na bango N’Sele.

"Mokonzi ya ekolo ayebisi biso ete esengeli tosala mosala mwa biso ya batambwisi ata mayangani mazali kosalama lisusu te," elobi cardinal Fridonlin Ambongo, episkopo ya lokumu ya Kinshasa mpo na eklezia katoliko.

Mayangani mazalaka lisusu wuto président Tshisekedi azwaki mokano le 28 mars ya état d'urgence eye epekisi bokutani ya bato koleka bato 20 na esika moko mpo na koboya bopanzami bwa COVID-19.

"Asengi biso, lokola balanidi babiso bandimelaka biso, toyeba kopesa bango sango ya solo mpe tosala makambo makokende na nzela ya bitumba na bokono boye bozali koboma mingi," esakobli cardinal Ambongo.

Kolanda maloba ma cardinal Ambongo, président Tshisekedi ayebisi bakambi ya biyamba basalisa na kosunga bato ya mpasi mpe babola.

Mpo na cardinal Ambongo boyokani kati na biyamba na mbulamatari bozali malamu.

Président Tshisekedi mpe ayebisaki bango na bokuse maye matali ndenge ba institutions ezali kotambola.

RDC ekomi na bato 332 baye bayebani kozala na COVID-19, kolanda INRB.

Bato 25 bakufi, 27 babikisami, Moto ya sika azwami te na 127 tests esalami lundi.

XS
SM
MD
LG