Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Koleka bato 14 bakufi na bitumba ya BDK na Kongo central


Bayi bokengi, police mpe mapinga nsima na bokimi ya Ne Muanda Nsemi na boloko bonene ya Makala, na Kinshasa, 17 mai 2017.
Bayi bokengi, police mpe mapinga nsima na bokimi ya Ne Muanda Nsemi na boloko bonene ya Makala, na Kinshasa, 17 mai 2017.

Koleka bato 14 bakufi na bitumba kati na bayi bokengi na balandi ba BDM / BDK (Bundu dia Mayala / Bundu dia Kongo) ya Nemuanda Nsemi mercredi na Songololo, na Kongo central, elobi ya bakai ya DGM.

"Kino sik’oyo, bato 14 bakufi mpe misato bazoki mpota ya makasi," eyebisi moko na bakambi ya Direction Générale ya migrations (DGM) Lievain Mayala na AFP.

Ba policier mibale bazali kati na bato bakufi.

Bitumba byango bisalamaki na Songololo, na route nationale numero 1 eye ememaka Kinshasa, mpe ekendaka na Matadi mpe na Boma.

Bakonzi ya etuka ya Kongo central, bayebisi ete balakandi ya BDM bazali kobenga baye banso bazali ya Kongo central te.

Matata mabandaki na butu ntango bayi bokengi bakangi baiike na ba BDK baye balingaki baboma administrateur ya territoire, elobi bayi DGM.

Population esilikaki mpe ekandaki kozika ndako ya nzambe ya ba BDK.

"Kimya ezali sik’oyo kasi population ezali kobanga ete ba BDK bazongisa mabe mpo mingi (ba BDK) bakimaki na nzamba," eyebisi DGM.

Ekomi mbala ya misato ba BDK basali bitumba na Kongo central na mikolo mike.

Ne Muanda Nsemi, mokambi ya BDM / BDK, abimaki na ba vidéo na ba réseaux sociaux mpe ekebisaki bakonzi ya ekolo ete bitumba ya lingomba na ye liye lisangisaka politiki na bokoko, bikokoba mpe bikokoma makasi.

Ne Muanda Nsemi azali kosenga babongisa ndako na ye police mpe bayi bokengi babebisaki ntango bakangaki mibu mibale. Asengi ete batiya na bokambi ya ba entreprises ya l’Etat ya Kongo central kaka bana ya etuka eye.

XS
SM
MD
LG