Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump atelemisi bopesi mikanda na bapaya mpo na COVID19


Président Donald Trump azali kopesa sango ya COVID19 ma Maison Blanche, Washington, 22 avril 2020.
Président Donald Trump azali kopesa sango ya COVID19 ma Maison Blanche, Washington, 22 avril 2020.

Président Donald #Trump azwi mokona o'mokolo mwa misato mpo na kotelemisa bopesi mikanda ya bovandi na Etats-Unis na bapaya mpo na mikolo tuku motoba.

Yango mpo na kobatela misala ya bana mboka Amerika likolo ya mpasi eye COVID19 ememi. Bopemisi yango ekozala yambo mpo mikolo tuku motoba.

22 millions ya Bana ya Amerika babungisa mosala na bango likolo ya Coronavirus ya sika.

Yango ezali mpo bana ya Amerika bazalaya kozwa misala ntango moboka ekozongela malembe malembe kosala, eyebisi M. Trump.

Bato baiike babandi katambola mpe kosala milulu mpo na kosenga misala mizonga na Etats-Unis.

Etats-Unis ekomi mboka eleki na bato bakufi na COVID-19, motango na bango mozalil pene na 46.000. koleka 826.000 nde bayebani kozala na yango.

XS
SM
MD
LG