Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

COVID-19: Dr. Mukwege alobi bana ya Afrika basalela makoki ya mboka na bango


Dr. Denis Mukwege, prix Nobel ya kimya na 2018 mpo na kobongisa basi babebisa na makasi, awa na Tokyo, Japon, 3 octobre 2019.
Dr. Denis Mukwege, prix Nobel ya kimya na 2018 mpo na kobongisa basi babebisa na makasi, awa na Tokyo, Japon, 3 octobre 2019.

Dr. Denis Mukwege, prix Nobel ya kimya na 2018 mpo na kobongisa basi babebisa na makasi, asengi bana ya Afrika koselala makoki ya mboka na bango na bitumba na COVID-19.

Kino sik’oyo Afrika ezwi ngolu mingi. Soki coronavirus ebetaki yango makasi lokola na Chine, Poto (Europe) to Etats-Unis, elingakaki ezala mpasi ya monene, elobi Dr. Mukwege na conference en ligne,

Dr. Mukwege azali mokambi ya bitumba na COVID-19 na etuka ya Sud-Kivu, esika wapi bato 6 bayebani kozwama na bokono boye. Mibale basi babikisami. Asengi batiela Sud-Kivu mpe laboratoire ya kotester babeli na COVID-19.

Dr. Mukwege abeti sete likolo na litomba ya kosalela makoki mazwami na mboka moko moko.

Afrika elekisi motango ya bato nkoto moko ya baye bakufi mpe 20.000 ya baye bayebani kozwama na COVID-19.

Na bisika mingi babola babandi kotelemela bokangami na ndako.

80% ya bana ya RDC na babikaka na secteur informel.

Mpo na Dr. Mukwege, kovandisa bato na ndako na makasi ekosimba te.

Na Sénégal, police ekangi bilenge 74 na quartier populaire moko ya Dakar mpo batosaki couvre te.

Na Kinshasa, engumba mokinzi ya RDC, police ekokanga mpe kofutisa 1.500 Francs congolais (pene ba 1$) moto nyonso akozwama kati bato ebele na bozangi masque. Mbulamatari esengi bato banso kosala masque bango moko soki bakoki te kosomba.

Na Malawi, bavandi basilikaki mingi mpe misala ya bosembo milongi mokano ya kovanda na ndako.

Na Afrique du Sud bavandi ya Alexandra na Jhannesburg bakita o’balabala lobi loleki mpo na bozangi pole na bokaboli bilei ya mbulamatari. Na Cap, baiike bapunzaki.

Président Cyril Ramaphosa esengeli alimbola na mpoka mikano ya kokitisa mpasi ya bato ntango ya kokangama na ndako.

XS
SM
MD
LG