Koffi Olomide afundi na Cour ya cassation bato ya bokengi baye bakangaki ye o’mokolo ya misato mpe bamemaki ye na parquet ya Tribunal ya Grande instance ya Gombe, eyebisi alanga nzembo na bapanzi sango na bobimi na ndako ya bosembo.
Président Félix Tshisekedi asengi ete molongo esunga ekolo Congo démocratique na makasi ma yango mpo na kobatela zamba ya monene, mayi mpe maye masusu mokili mozali na bosenga makasi.
Président Félix Tshisekedi akopesa lisikulu lya ye lya yambo na Assemblée générale ya Nations unies o’mokolo ya minei na New York.
Ministre ya Intérieur, Gilbert Kankonde, asengi police elakisa elongi ya bomoto. Ezalaki na milulu ya bolakisami na ye na ba policiers na Commissariat général ya Police nationale congolaise (PNC) na Kinshasa.
Nancy Pelosi, mokambi ya ba démocrates na Congrès ya Amerika apesi nzela mpo na bofundami ya président Donald Trump likolo na anketi bayike bakanisi ete asengaki mokonzi ya Ukraine asala na ntina ya mbanda na ye ya politiki Joe Biden, moko na ba démocrates.
Président Félix Tshisekedi akutani na Bill Gate, mokeli ya Micosoft Corporation mpe moko na baye baleki na nkita na molongo, na masolo ya pembeni ya 74e Asselmblée générale na Nations unies na New York.
Bilenge tuku misato na motoba ya lingomba Lucha babimisami na boloko na Goma, (Nord-Kivu) nsima na pene na mposo moko ya bokangemi, eyebisi baninga na bango.
Président Félix Tshisekedi ya RDC akutani na mokani wa ye ya Togo Faure Gnassingbé na New York (USA) na masolo ya pembeni ya bokutani bonene ya Nations unies. Asololaki o’mokolo ya lundi na mokonzi ya Rwanda Paul Kagame.
Ba ntoma to ba députés ya Assemblée provinciale ya etuka ya Kongo central baponi o’mokolo ya mibale mokano ya koboya ete misala ya bosembo milandela gouverneur Atou Matubuana mpo na likambo ya bilili ya bolumbu ya mokambi ya mibale, Justin Luemba.
Président Félix Tshisekedi abwaki mbela na baye banso ya molongo kosunga ekolo Congo démocratique kobatela zamba na yango. Ezalaki na bokutani Climate Action Summit 2019 na New York, USA.
Président Felix Tshisekedi na ngambo ya Congo démocratique mpe Ministre ya yambo Clément Mouamba mpo na Congo-Brazzaville bazalaki lelo ba bokutani ya Amazonie na New York, na Etats-Unis.
Bapaya koleka na nkoto nkama mitano bazanga mikanda babenganami na Angola na mobu moko, eyebisi ministre d’Etat ya présidence ya Angola, Pedro Sebastiao, na bokutani na bapanzi sango na Luanda.
Commission ya Censure epekisi loyembo mwambe ya alanga nzembo Koffi Olomide. Kasi moyembi oyo apameli mokano mwango lokola elekisi ndelo.
Union européenne ekobakisa ba dollars milioni tuku mitano mpo na kosunga ekolo Congo démocratique na kobundisa Ebola, elobami na bokutani jeudi ya président Félix Tshisekedi na mokambi ya EU Jean-Claude Junker na Bruxelles.
Ba ministres mpe vice-ministres bandimi na mokanda batiaki mokoloto o’mokolo ya misato ete bakoki te kondima likabo ya koleka $210 (350.000 francs Congolais) na mobu moko.
Président Félix Tshisekedi asololaki na mpokwa ya mokolo ya misato na ba Congolais na Bruxelles epayi azali na mobembo ya ye yambo uto lundi. Apesi elaka ete RDC ekozwa na maboko boteki mpe mpe misolo ya ba mines ya mabele na yango.
Président Félix Tshisekedi azalaki na Anvers, na mokolo ya misato ya mobembo na ye na Belgique, esika wapi asali boyonaki nzike mpo etali mombongo mpe mines (makele).
Président Denis Sassou Nguesso alongoli ministre ya mambi ya basi nsima na boswani bobimi na enregistrement emonisi ete mokambi ya opposition azwaki mosolo ya présidence.
Ministre ya kala ya bokolongo bwa nzoto, Dr. Oly Ilunga, atiyami na 'résidence surveillée' (boloko ya ndako na ye moko) kolanda mokano ya Cour ya cassation, eyebisi basambeli baye.
Ministre ya bokolono ya kala, Dr. Oly Ilunga atindami Cour ya cassation nsima na koleka na parquet, mikolo misato nsima na bokangami na ye.
Voir plus