Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi akoloba na ONU o’mokolo ya minei


Président Félix Tshisekedi elongo na basungi baye na balabala moko ya New York, 25 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi elongo na basungi baye na balabala moko ya New York, 25 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akopesa lisikulu lya ye lya yambo na Assemblée générale ya Nations unies o’mokolo ya minei na New York.

Azali kokoba mobembo na ye uto mokolo ya eyenga na Etats-Unis.epayi wapi bokutani bonene ya mbala 74 ya ONU bozali kosalama banda mokolo ya mibale.

Lisikulu yango likozala na ngonga ya zomi na sambo ya Kinshasa mpe zomi na mwambe na monyele to est ya RDC.

Nzokande lobi loleki, Félix Tshisekedi azalaki elongo na bakambi ya bikolo bisusu na limpati lipesamaki na président Donald Trump awa na Etats-Unis.

Yambo na yango Félix Tshisekedi akutani na Bill Gate, mokeli ya Micosoft Corporation mpe moko na baye baleki na nkita na molongo, na masolo ya pembeni ya Asselmblée générale na Nations unies ya mbala tuku sambo na minei awa na New York.

Mokambi Congo démocratique asololaki mpe na mokokani wa ye ya ekolo Togo, Faure Gnassingbé.

XS
SM
MD
LG