Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi na ba Congolais na Bruxelles: "Tokozwa na maboko boteki mpe misolo ya ba mines na biso"


Président Félix Tshisekedi na molongani wa ye Denise Nyakeru na libongo ya Anvers, Belgique, 18 septembre 2018. (Facebook/Présidence ya RDC)
Président Félix Tshisekedi na molongani wa ye Denise Nyakeru na libongo ya Anvers, Belgique, 18 septembre 2018. (Facebook/Présidence ya RDC)

Président Félix Tshisekedi asololaki na mpokwa ya mokolo ya misato na ba Congolais na Bruxelles epayi azali na mobembo ya ye yambo uto lundi. Apesi elaka ete RDC ekozwa na maboko boteki mpe mpe misolo ya ba mines ya mabele na yango.

Na lisikulu na ye liboso ya bituluku batonaki na Palais 12, Félix Tshisekedi alimbolaki linaka ya bokambi na ye liye apesaki na bozwi ebonga na ye. Moko na makambo alaki kosala, ezali kopesa nzela na maziba manso ya bomengo ya RDC.

Mpo etali mines (makele), M. Tshisekedi apaleli bozangi alima to mpe bosaleli mabe ya ba mines bozalaki na mboka yambo ye akota na bokonzi.

"Uto kala ba mines nde ememela biso likama na esika ya kozala libaku malamu mpo na biso," alobi.

Alaki kotia alima na likambo ya makele na kolanda mibeko. "Tokobima bongo na boloko ya ba mines mpo tosalela mpe banzela misusu," elobi M. Tshisekedi. Mpo na ye, esengeli kotia miso na makambo lokola bilanga mpe kobongola maye makobima na yango.

"Tokosangisa batimoli banso baye bateki ebele baselelaka na ndenge ya mabe mpo na kobebisa ntalo ya mabanga ya ntalo na biso," esakoli M. Tshisekedi.

Mokambi ya RDC aboyi kotanda na miso ya bato banso maye akosala mpo na makele. Alobi yango ezali likambo ya mayele mpe ya lintomba.

Na linaka na ye, alobeli maye asi asali mpe akosala mpo etali makambo lokola bokolongono, biteyelo, nkita, bosembo, bokengi mpe biloko bisusu.

XS
SM
MD
LG