Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Koleka 500.000 bapaya babenganami na Angola na mobu moko


Ba Congolais bazongi na Tshikapa na Kasaï kowuta Angola epayi wapi babenganami. 13 octobre 2018.
Ba Congolais bazongi na Tshikapa na Kasaï kowuta Angola epayi wapi babenganami. 13 octobre 2018.

Bapaya koleka na nkoto nkama mitano bazanga mikanda babenganami na Angola na mobu moko, eyebisi ministre d’Etat ya présidence ya Angola, Pedro Sebastiao, na bokutani na bapanzi sango na Luanda.

Ba coppératives tuku na motoba ya boteki diamants nde ekanga, elongo na ba projets miniers, mpe na 289 ndako ya kosomba diamant, kolanda bakonzi ya Angola.

Mbulamatari ya président Joao Lourenco oyo akota na bokonzi na septembre 2017, elobi bobengani bato ezali mpo na kobongisa misala ya diamant pamba te bato ebele basalaka mosala yango na moyibi, mpe mingi bazali nd ebapaya.

Mingi kati na bapaya baye bazali ya ekolo Congo démocratique mpe ya bokolo misusu.

XS
SM
MD
LG