Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Dr. Oly Ilunga atindami na Cour ya cassation nsima na koleka na parquet


Ministre ya kala ya bokolongo ya RDC Dr. Oly Ilunga na bokutani ya ONU na geneve, Suisse, 15 juillet 2019, in Genève. (Photo by FABRICE COFFRINI / AFP)
Ministre ya kala ya bokolongo ya RDC Dr. Oly Ilunga na bokutani ya ONU na geneve, Suisse, 15 juillet 2019, in Genève. (Photo by FABRICE COFFRINI / AFP)

Ministre ya bokolono ya kala, Dr. Oly Ilunga atindami Cour ya cassation nsima na koleka na parquet, mikolo misato nsima na bokangami na ye.

Mosambeli wa ye, Me Guy Kabeya ayebisi ete Dr. Ilunga ayonolaki na mituna ya magistrat moko mpo etali likambo ya milioni zomi na mitano miye mizalaki mpo na Ebola.

"Awa tozali na Cour ya cassation epayi wapi parquet etindi biso. Tozali kozela mokano mpo etali lolenge makambo makosalama. Nzokande Dr. Oly Ilunga azali naino mokangambi," eyebisi VOA Lingala, Me Kabeya.

Ministre Oly Ilunga atikaki mosala na sanza sambo nsima na botiyami na mosala ya Dr Jean-Jacques Muyembe mpo na kokamba cellue technique ya bitumba na Ebola.

Pulusu ekangaki ye mokolo ya mposo mpe elobaki ete alingaki kokima na Congo-Brazzaville na nzela ya etuka ya Kongo central.

Kasi, mosambeli wa ye, Me Guy Kabeya awanganaki yango na elobeli ya VOA Lingala.

XS
SM
MD
LG